Prière du 6 Avril version Lingala

Priere du 06 Avril version Lingala
Na N'kombo ya Tata, Muana, mpe Molimo Mosantu, Tata Nzambe po ete biso bato to bonga, lokola ezalaki posa na yo, otindelaki biso Muana na yo Yezu Klisto, po ete maye bo lakanaki ma kokana.
 Nkolo na biso Yezu Klisto, po ete biso bato to bikisama, o ndimaki kufa ya soni ; ba bakaki yo na ekuluzu elongo na miyibi ; moko kati na bango a sakanelaki yo, kasi o zongiselaki ye liloba moko te na tina ete olingaki kosala kaka oyo bo yokanaki na Tata na yo po ete moto akoka kozua lisusu esika na kati na mitema na bino. Manso wana ma salamaki na ntina na biso bato mabe. Toyebi na bolamu ete olingi kozongisa biso bato, tokoka kozala lisusu na yo elongo kuna na lola esika moko na ba santu na yo. Liboso ete o mata na likolo, o lakisaki maye mazalaki na yo epai na bayekoli ba yo; o lakisaki bango posa na yo pe otindaki bango bakende na mokili mobimba, babongola ba pakanu ba ndimi. Molimo Mosantu akokita pe a kozala na bino kasi boko yeba ye te. Maloba na bino manso totangaka mango na mokanda mwa Nzambe. Na mokolo moye mwa le 6 avril, Tata Nzambe, Nkolo na biso Yezu Klisto na yo Tata Molimo Mosanto, to yebi ete tozali ba bungi liboso na miso na bino, pamba te tosalaka maye bo lingaka te pe toyokisaka basali na bino soni, pamba te maye manso bo pekisaka biso tomonaka yango lokola liseki.

Tofukami na se na makolo na bion po to mona bolimbisi bua bino. Tosi to moni mabe na biso pamba te mokili mokomi koningana; yango etindi biso to meka koyeba yo soki ojali nani. Lakisa biso pamba te mayele ma biso ma zali kaka ma bomwana pona tina na mabe na biso, tala ndenge pasi elekeli biso: Kufa, maladi, bitumba na makambo ndenge na ndenge lisusu biso tozali na ekimelo mosusu te; yo nde ebombamelo na biso. Bosalisa biso pamba te tozangi mosusu oyo akoki kozala molobeli na biso kuna bozali. Bolongisa biso na bitumba tozali na yango awa na mokili. Longola kolela na biso e Nkolo kotala masumu na biso te; pamba te, toyebi penza ete yo Nkolo Yezu okufaki na ekuluzu po tokoka ko bengama bana ba Nzambe, tosengi kimia na kati na mokili mobimba: Afrika, Poto, Amerika, Asie mpe Oceanie. Yo olobaki ete libanga moko likotikala lisusu likolo ya libanga mosusu te, se ekolongolama. Tomoni biteni mosusu ya mokili bizali kolakisama kaka pasi na bato mosusu. Tosengi na yooponela bango molobeli na kati na kimia, oyo akoki kotambolisa bango na tina ete tomoni makila ma bato makomi lokola liziba ya mayi liboso na miso na yo po na komi ponela motambolisi. Likambo wana ezali ya mawa mingi pe pasi penza. Tala lelo oyo ba zali ko bundisa biso, biso na biso tozali ko bomana. Tosengi bo longolela biso manso wana po ete
kimia ekota na mokili mobimba mpo ete mabota manso ma zala na boyokani.

Yango nde toyei kolakisa na bino basantu na N’kombo ya Tata, Muana, mpe Molimo Mosantu.

                                  Amen.

This site was designed with Websites.co.in - Website Builder

IMPORTANT NOTICE
DISCLAIMER

This website was created by a user of Websites.co.in, a free instant website builder. Websites.co.in does NOT endorse, verify, or guarantee the accuracy, safety, or legality of this site's content, products, or services. Always exercise caution—do not share sensitive data or make payments without independent verification. Report suspicious activity by clicking the report abuse below.

WhatsApp Google Map

Safety and Abuse Reporting

Thanks for being awesome!

We appreciate you contacting us. Our support will get back in touch with you soon!

Have a great day!

Are you sure you want to report abuse against this website?

Please note that your query will be processed only if we find it relevant. Rest all requests will be ignored. If you need help with the website, please login to your dashboard and connect to support

;